19/12/2020
https://youtu.be/65ht1q0N-uM
Mbote
(Hello)
Bo limbisa ngai.
(Forgive me.)
Mikolo eleki mingi.
(So many days went by.)
Nasaleli bino video te.
(I have not made any videos for you.)
Nakobanda kosalela bino ba video mibale mposo nioso.
(I will be making 2 videos every week.)
Nazongi.
(I am back.)
Na zongi lisusu.
(I am back again.)
Lelo
(Today)
Nalingi oyekola eloko ya sika.
(I want you to learn something new.)
Tango oko silisa kotala video oyo.
(When you will finish watching this video.)
Ko bosana nyoso te.
(Don't forget everything.)
Kanga ata eloko moko.
(Retain at least one thing.)
Nini eza pembeni nayo?
(What is next to you?)
Ozo mona nini pembeni na yo?
(What do you see next to you?)
Yebisa ngai.
(Tell me.)
Ozo mona nini pembeni na yo?
(What do you see next to you?)
Ngai nazo mona molangi ya mayi.
(I see a bottle of water.)
Yo oza ko mona nini?
(What do you see?)
Ozo mona nini?
(What do you see?)
Ngai nazo mona molangi ya mayi.
(I see a bottle of water.)
Molangi ya mayi eza awa.
(A bottle of water is here.)
Likolo ya mesa.
(On top of the table.)
Makolo na nga eza nase ya mesa.
(My legs are under the table.)
Maboko na ngai yango oyo.
(Here are my hands.)
(Phone ring)
Mbote nazali koyoka yo.
(Hello go ahead.)
Kombo nayo nani?
(What is your name?)
Olingi nini?
(What do you want?)
Olingi na tangisa ya lingala?
(Do you want me to teach you lingala.)
Soki olingi ko yekola lingala.
(If you want to learn lingala)
Tala ba video na ngai na Youtube.
(Watch my videos on Youtube)
Nazali na esika mosusu te oyo na tangisaka lingala.
(I don't teach lingala elsewhere.)
Likambo te.
(You are welcome.)
Limbisa ngai.
(Sorry)
Moto abengaki na telephone.
(Someone called me on the phone.)
Alingi na tangisa ye lingala.
(He wants to learn lingala)
Na tindi ye na Youtube.
(I sent him to Youtube.)
Pona lelo, na suki awa.
(For today, I am stopping here.)
Na lingi na bima.
(I want to go out.)
Okosala nini lelo?
(What will you do today?)
Yo okosala nini lelo?
(What will you do today?)
Nga na lingi na bima.
(I want to go out.)
Nalingi nakende kosomba makala na sukali.
(I want to go buy charcoal and sugar.)
Soki nazongi. Na lambi. Nalie
(When I come back. I cook. I eat. )
Soki nasilisi ko lia, na bimi nakende koluka mosala.
(When I finish eating, I go look for a job.)
Kobosana ko tindela moto mosusu video oyo te.
(Don't forget to send this video to someone else.)
Na zali / nazali (I am)
O zali / ozali (You are)
A zali / azali (He is)
E zali / ezali (It is)
To zali / tozali (We are)
Bo zali / bozali (You are)
Ba zali / bazali (They are)