03/05/2026
Santé na ngai moko nanu éléki nionso, po naboyi kopanza bosoto na nga epayi nionso, po ezali kobotisa ba bokono ya salité. Naboyi pé kobela ba maladies ya salité oyo baninga bazali kobotisa na ndéngé bazali kobuaka ba salités na désordre, pé n'importe où.
Na kati ya ong na biso , tozali kolemba té kosala ba activités ya sensibilisation au combat contre l'insalubrité, contre ba mbindo oyo etondi na ba mapangou na biso, na ba quartiers, na ba bala-bala pé na ba mayi ya makelele. Kasi soki mutu nionso amilobeli que soki nga moko nabandi nanu kosala combat contre bosoto épayi na nga pé nzinga-nzinga na nga, yango ekobatela liboso santé na nga, pé sima ndé ekobatela santé ya batu oyo bazali nzinga-nzinga na nga. Donc, il faut objectif ya mikolo nionso ezalaka kaka
Kobuaka bosoto na poubelle ezali malamu. Kasi kokabola bosoto pé kobuaka na poubelle oyo esengeli, ezali ndé malamu koleka.
Yango biso tozali komeka kolakisa ndenge mutu nionso akoki kosala Tri des déchets, donc kokabolaka bosoto na bosoto, pé kobuakaka ba bosoto oyo ezali ndengé moko na kati ya poubelle oyo esengeli, oyo babengi poubelle de Tri.
Botala bilili ya sika oyo tokendeki lisusu kotia 3 poubelles de tri na Église protestante moko pé na école na centre de santé na bango.
Mutu na mutu azali na obligation ya kosala action ata ya muke po na kotombola mboka. Biso toponi kosala ba poubelles de tri po na ko protégé santé