12/04/2026
Mokolo eleki tozalaki na nkoli ya boyoki Rumba pe bokomi na lingala o ntei ya ndaku ya buku Bibliothèque Karibuni.
Tosangisaki bakolo pe bilenge ya ndenge na ndenge, pe nkoli ekambamaki na Bayuwa-Di-Mvuezolo, Dieu Nduki Senseï, Joyeux Ngoma. Ya liboso azuaki maloba pona kolimbola loyembo eponamaki o mokolo " Aspirine" ya Koffi Olomide. Ya mibale akabolaki likanisi na ye na oyo etali esika ya Rumba na kati ya Nkomá-nzengá ya Ekolo Congo 🇨🇩. Ya s**a apesaki na banso makoki masengeli pona kokoma loyembo na lingala.
Manso malekanaki na ntina nte moko na moko asimba motuya ya nzembo o Ekolo Congo, pe kopesa ntina na nkota ya mboka, mingi mingi penza lingala eye elobamaki na nkoli yango.
Mokano ezali ya kokolisa bolingo ya ntoki pe nkota, na yango, bomesana mikolo mizoya na komona milulu miye misalema mbala na mbala.
-> Ezalaki Ya Mzée, moko ya baye balengelaki molulu, na ngambo ya AJECO.